Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Daniele 10:21 - Mokanda na Bomoi

21 kasi liboso na nyonso, nakoyebisa yo makambo oyo ekomami kati na buku ya solo. Moto moko te asungaka ngai liboso na bango ; kaka Misheli, mokambi na bino.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Daniele 10:21
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kasi mokambi ya mokili ya Persi atelemelaki ngai mikolo tuku mibale na moko. Boye, Misheli, moko kati na bakonzi ya ba-anjelu, ayaki kosunga ngai, pamba te bakonzi ya Persi bakangaki ngai kuna.


Na tango wana, Misheli, mokambi monene ya ba-anjelu, oyo abatelaka bato na yo akotelema. Ekozala tango ya pasi penza, pasi oyo etikala nanu kozala te wuta bikolo ezala na mokili kino na tango wana. Kasi na tango wana, bato ya ekolo na yo, oyo bakombo na bango ekomonana kati na buku, bakobika.


Kasi yo, Daniele, batela maloba oyo lokola sekele mpe kanga buku kino na tango ya suka. Mingi bakotambola bipai na bipai, mpe boyebi ya bato ekokola makasi. »


Emoniseli ya bapokwa mpe ya batongo oyo epesamelaki yo ezali ya solo, kasi bomba yango malamu, pamba te etali makambo oyo ekosalema na mikolo ekoya.


Apesaki ngai malako, alobaki : « Daniele, nayei sik’oyo mpo na kopesa yo bososoli mpe mayele.


Yeba mpe sosola makambo oyo : wuta tango lisakoli ya kobongisa mpe ya kotonga lisusu Yelusalemi ebimaki kino koya ya mokonzi, Ye oyo azwaki epakolami, ekosala baposo sambo mpe baposo tuku motoba na mibale. Engumba ekotongama lisusu elongo na nzela mpe bamir na yango oyo batonga makasi.


Solo, Nkolo Yawe asalaka eloko moko te soki alakisi mabongisi na Ye te epai ya basali na Ye, basakoli.


Makambo oyo ekokani na maloba ya basakoli, kolanda ndenge ekomama :


Nzokande, ezala Misheli, mokonzi ya ba-anjelu, tango abendanaki na Satana na tina na nzoto ya Moyize, amekaki ata moke te kopesa Satana etumbu ya soni ; kasi alobaki kaka : « Tika ete Nkolo apesa yo etumbu ! »


Bongo etumba ekweyaki kuna na likolo : Misheli elongo na ba-anjelu na ye babundisaki dalagona, mpe dalagona elongo na ba-anjelu na yango ebundisaki Misheli elongo na ba-anjelu na ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ