Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Daniele 10:2 - Mokanda na Bomoi

2 Na tango wana, ngai Daniele, nasalaki matanga oyo esalaki baposo misato.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Daniele 10:2
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango kaka nayokaki makambo oyo nyonso, namivandisaki na mabele mpe nakomaki kolela. Nasalaki mikolo mwa mingi ya matanga, na kokila bilei mpe na kosambela Nzambe ya Likolo.


Na moyi, Yawe apesaka mitindo epai ya bolingo na Ye ; na butu, nakumisaka Ye na banzembo mpe nasambelaka Nzambe ya bomoi na ngai.


Nzambe, Yo nde ozali ndako na ngai, oyo batonga makasi ; mpo na nini osundoli ngai ? Mpo na nini nasengeli kotambola na pasi boye, na se ya minyoko ya monguna ?


« Bosepela elongo na Yelusalemi mpe botonda na esengo mpo na ye, bino nyonso oyo bolingaka ye ; bosepela makasi elongo na ye, bino nyonso oyo bosalelaki ye matanga.


Ah ! Soki nazalaki ata na ndako ya bapaya kati na esobe, nalingaki ata kokima bato na ngai mpe kozala mosika na bango, pamba te bango nyonso bazali bandumba, bazali lisanga ya bakosi !


Akobaki koloba na ngai : — Daniele, kobanga te ! Wuta mokolo ya liboso oyo ozwaki makanisi ya koluka kososola mpe komikitisa liboso ya Nzambe na yo, libondeli na yo eyokamaki, mpe nayaki lokola eyano na libondeli yango.


Yesu azongiselaki bango : — Boni, bato oyo babengami na feti ya libala bakoki solo kozala na mawa, wana mobali ya libala azali elongo na bango ? Nzokande, tango ezali koya oyo bakolongola mobali ya libala kati na bango ; mpe ekozala na tango wana nde bakokila bilei.


motema na ngai etondi na mawa mpe na pasi oyo ezali kosila te.


Botala pasi na bino, bosala matanga mpe bolela. Tika ete koseka na bino ebongwana kolela, mpe esengo na bino ekoma mawa !


Soki moto moko ameki kosala bango mabe, moto ekobima na minoko na bango mpe ekozikisa banguna na bango. Ezali ndenge wana nde moto nyonso oyo akolinga kosala bango mabe asengeli kokufa.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ