Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Daniele 10:19 - Mokanda na Bomoi

19 Elobaki na ngai : — Molingami ya Nzambe, kobanga te, zala na kimia ! Zala makasi ; solo, zala makasi ! Wana ezalaki koloba na ngai, nzoto na ngai ezwaki lisusu makasi mpe nalobaki : — Loba, nkolo na ngai, pamba te opesi ngai makasi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Daniele 10:19
29 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Na mokolo oyo nabelelaki Yo, oyanolaki ngai, otondisaki ngai na mpiko mpe na makasi.


Loba na bato oyo bazali kobanga : « Bozala makasi, bobanga te, Nzambe na bino akoya, akoya kozongisa mabe na mabe, akoya na lifuti ya Nzambe. Ye moko akoya kobikisa bino. »


Boye, kobanga te, pamba te nazali elongo na yo ; komitungisa te, mpo ete nazali Nzambe na yo ; nakoyeisa yo makasi mpe nakosunga yo ; solo, nasimbi yo na loboko na Ngai ya mobali, loboko oyo elongisaka.


Oh Jakobi, yo oyo oleki kutu mutsopi te, Isalaele, yo oyo omonani lokola eloko pamba, kobanga te, pamba te Ngai moko nakosunga yo, » elobi Yawe, Mosikoli na yo, Mosantu ya Isalaele.


Ekelamu oyo ezalaki lokola moto esimbaki ngai lisusu mpe epesaki ngai makasi.


Tango kaka obandaki kobondela, liloba moko ebimaki ; mpe ngai, nayei koyebisa yo yango, pamba te ozali molingami ya Nzambe. Yamba liloba mpe sosola emoniseli :


Kasi sik’oyo, Zorobabeli, zala makasi, › elobi Yawe. ‹ Jozue, mwana mobali ya Yeotsadaki, mokonzi ya Banganga-Nzambe, zala makasi. Bino nyonso bato ya ekolo, bozala makasi, › elobi Yawe, ‹ bosala mosala, pamba te nazali elongo na bino, › elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.


Libota ya Yuda mpe libota ya Isalaele, bobanga ata eloko moko te, boyika kaka mpiko ; pamba te ndenge bokomaki bikolo elakelama mabe kati na bikolo mosusu, ndenge wana mpe nakobikisa bino, mpe bokozala lipamboli. »


Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Bino ba-oyo, na mikolo oyo, bozali koyoka maloba kaka oyo basakoli balobaki, lokola bazalaki awa na tango miboko ya Tempelo ya Yawe, Mokonzi ya mampinga, ezalaki kotongama, boyika mpiko mpe bolendisa maboko na bino mpo na kotonga Tempelo oyo ya Yawe.


Bandeko nyonso mibale ya basi batindaki maloba oyo epai ya Yesu : — Nkolo, moto oyo olingaka azali kobela.


Bongo Bayuda balobaki : — Tala ndenge nini alingaki ye !


Nzokande, Yesu azalaki kolinga makasi Marte, ndeko na ye ya mwasi mpe Lazare.


Nakeyi, kasi natikeli bino kimia ; napesi bino kimia na Ngai. Nazali kopesa bino te ndenge mokili epesaka. Tika ete mitema na bino etungisama te mpe bobanga te !


Nasengelaki koloba na bino bongo mpo ete bozala na kimia kati na Ngai. Kati na mokili, bozali solo komona pasi ; kasi boyika mpiko, nalongi mokili.


Tango Yesu amonaki ete moyekoli oyo azalaki kolinga atelemi pembeni ya mama na Ye, alobaki na mama na Ye : — Mwasi, tala mwana na yo !


Petelo atalaki na sima mpe amonaki moyekoli oyo Yesu azalaki kolinga koleka bayekoli mosusu, ye oyo, wana bazalaki kolia, alalelaki Yesu na tolo mpe atunaki Ye : « Nkolo, nani akoteka Yo ? » Ye mpe azalaki kolanda bango.


Bosenzelaka, botelemaka ngwi kati na kondima, boyikaka mpiko, bozalaka makasi.


Kasi azongiselaki ngai : « Ngolu na Ngai ekoki mpo na yo, pamba te nguya na Ngai ekokisamaka kati na bolembu. » Mpo na yango, nakomikumisa na esengo nyonso mpo na bolembu na ngai, mpo ete nguya ya Klisto ezala kati na ngai.


Mpo na kosukisa, bozalaka makasi kati na Nkolo mpe kati na nguya na Ye ya monene.


Mwana na ngai, zala makasi kati na ngolu oyo ezali kati na Yesu-Klisto.


Boni, nalobaki na yo te : Zala makasi mpe yika mpiko ? Kozala na somo te mpe kolemba nzoto te, pamba te Ngai Yawe, Nzambe na yo, nakozala elongo na yo na bisika nyonso oyo okokende. »


Tango namonaki Ye, nakweyaki na makolo na Ye lokola moto akufi. Bongo asimbaki ngai na loboko na Ye ya mobali mpe alobaki na ngai : « Kobanga te ! Nazali Ya liboso mpe Ya suka.


Kasi Yawe alobaki na ye : — Zala na kimia ! Kobanga te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ