Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Daniele 10:13 - Mokanda na Bomoi

13 Kasi mokambi ya mokili ya Persi atelemelaki ngai mikolo tuku mibale na moko. Boye, Misheli, moko kati na bakonzi ya ba-anjelu, ayaki kosunga ngai, pamba te bakonzi ya Persi bakangaki ngai kuna.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Daniele 10:13
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Wuta tango wana, misala ya Ndako ya Nzambe kati na Yelusalemi etelemaki kino na mobu ya mibale ya bokonzi ya Dariusi, mokonzi ya Persi.


Na tango wana, Misheli, mokambi monene ya ba-anjelu, oyo abatelaka bato na yo akotelema. Ekozala tango ya pasi penza, pasi oyo etikala nanu kozala te wuta bikolo ezala na mokili kino na tango wana. Kasi na tango wana, bato ya ekolo na yo, oyo bakombo na bango ekomonana kati na buku, bakobika.


Pamba te tobundisaka nzoto te mpe tobundisaka makila te, kasi tobundisaka nde banguya, bakonzi ya milimo ya Satana, bokonzi ya molili, banguya ya mokili ya molili mpe milimo mabe oyo ezali kati na mboka ya milimo.


Ezali mpe kati na Ye nde bino botondisamaki, pamba te azali Mokonzi ya milimo nyonso mpe ya nguya nyonso.


Yango wana, tolukaki koya epai na bino. Ngai Polo, namekaki yango mbala na mbala, kasi Satana akangaki nzela na biso.


oyo akotaki kati na Likolo, avandi na ngambo ya loboko ya mobali ya Nzambe mpe azali kokonza ba-anjelu, banguya mpe milimo ya mipepe na likolo.


Nzokande, ezala Misheli, mokonzi ya ba-anjelu, tango abendanaki na Satana na tina na nzoto ya Moyize, amekaki ata moke te kopesa Satana etumbu ya soni ; kasi alobaki kaka : « Tika ete Nkolo apesa yo etumbu ! »


Bongo etumba ekweyaki kuna na likolo : Misheli elongo na ba-anjelu na ye babundisaki dalagona, mpe dalagona elongo na ba-anjelu na yango ebundisaki Misheli elongo na ba-anjelu na ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ