Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Daniele 1:9 - Mokanda na Bomoi

9 Boye, Nzambe asalaki ete Daniele azwa ngolu mpe bolamu na miso ya mokonzi ya bakalaka ya lokumu.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Daniele 1:9
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Moto yango atunaki Jakobi : — Kombo na yo nani ? Jakobi azongisaki : — Kombo na ngai ezali Jakobi.


Yawe azalaki elongo na Jozefi mpe atalisaki ye bolamu na Ye ; asalelaki ye ngolu na miso ya mokonzi ya boloko.


limbisa bato na Yo na masumu mpe mabe nyonso oyo basalaki liboso na Yo mpe sala ete banguna na bango bayokela bango mawa.


Oh Nkolo, nabondeli Yo, tika ete litoyi na Yo eyoka na bokebi libondeli ya mowumbu na Yo mpe libondeli ya bawumbu na Yo mosusu oyo bazali kosepela kopesa lokumu na Kombo na Yo ! Na mokolo ya lelo, longisa mowumbu na Yo mpe salela ye ngolu na miso ya moto oyo ! » Nzokande, na tango wana, nazalaki kalaka oyo azalaki kotala makambo oyo etali masanga ya mokonzi.


Mokonzi atunaki ngai : — Olingi nini ? Nasambelaki Nzambe ya Likolo,


Ester asepelisaki Ege mpe azwaki ngolu na miso na ye. Mbala moko, apesaki ye biloko ya monzele mpe bilei oyo asengeli kolia ; apesaki ye mpe basali sambo ya basi oyo aponaki kati na ndako ya mokonzi. Bongo atiaki ye elongo na basali na ye ya basi kati na shambre oyo elekaki kitoko kati na ndako ya basi ya mokonzi.


Nzambe abikisaka mobola na mopanga ya monoko na bango, akangolaka moto akelela na loboko ya moto ya makasi.


Boye, mobola asengeli kozala na elikya, mpe moto oyo atambolaka na bosembo te asengeli kokanga monoko.


Asalaki ete bato nyonso oyo bakomisaki bango bawumbu bayokela bango mawa.


Bino bato, kino tango nini bokoyokisa nkembo na ngai soni ? Kino tango nini bokomisepelisa na makambo ya pamba mpe bokolanda makambo ya lokuta ?


Soki Yawe asepeli na nzela ya moto, akoyokanisa ye na banguna na ye.


Kasi mokonzi ya bakalaka ya lokumu alobaki na Daniele : — Nazali kobanga mokonzi, nkolo na ngai, oyo akateli bino bilei oyo bosengeli kolia mpe masanga oyo bosengeli komela ! Mpo na nini bokolinga ete mokonzi amona bilongi na bino ekonda koleka bilongi ya bilenge mosusu ya mibu na bino ? Bomoni te ete wana bokobomisa ngai epai ya mokonzi ?


mpe akangolaki ye na minyoko na ye nyonso ; Apesaki ye bwanya mpe asalelaki ye ngolu na miso ya Faraon, mokonzi ya Ejipito, oyo akomisaki ye moyangeli ya Ejipito mpe ya ndako na ye mobimba.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ