ata soki bato misato oyo, ‹ Noa, Daniele mpe Yobo, › bazalaki kati na bavandi ya ekolo yango, bango misato kaka nde balingaki kobika mpo na bosembo na bango, elobi Nkolo Yawe.
na Kombo na Ngai, elobi Nkolo Yawe, ata soki Noa, Daniele mpe Yobo bazalaki kati na bavandi na yango, balingaki kokoka te kobikisa ata mwana moko ya mobali to ya mwasi ; bango misato kaka nde balingaki kobika mpo na bosembo na bango.
Mokonzi asololaki na bango ; mpe kati na bilenge nyonso oyo bamemelaki ye, amonaki ete moko te akokani na Daniele, na Anania, na Mikaeli mpe na Azaria. Boye, bakomaki kosala kati na ndako ya mokonzi.
Arioki amemaki Daniele na lombangu liboso ya mokonzi mpe alobaki na ye : — Mokonzi, namoni moto moko kati na bawumbu oyo bawutaki na Yuda, oyo akoki koyebisa mokonzi ndoto na ye mpe kolimbola yango.
Yango wana, tango bokomona makambo ya nkele oyo epesaka bato pasi na motema, oyo mosakoli Daniele alobelaki, kosalema kati na Esika ya bule, —tika ete motangi asosola malamu—
Tango bokomona makambo ya nkele kosalema kati na Esika ya bule, —tika ete motangi asosola malamu— wana tika ete bato oyo bakozala kati na Yuda bakima na bangomba ;