Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Daniele 1:5 - Mokanda na Bomoi

5 Mokonzi akatelaki bango mpo na mokolo na mokolo, bilei oyo basengeli kolia mpe masanga oyo basengeli komela : nyonso ezalaki kowuta na mesa na ye. Mibu misato, basengelaki koyekola ; na sima nde bakoki kosala mosala ya mokonzi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Daniele 1:5
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Azalaki na mibu tuku misato ya mbotama tango akotaki na mosala ya Faraon, mokonzi ya Ejipito. Jozefi alongwaki na miso ya Faraon mpe atambolaki na mokili mobimba ya Ejipito.


Esengo na bato na yo, esengo na basali na yo, ba-oyo batelemaka tango nyonso liboso na yo mpe bayokaka maloba na yo, oyo etonda na bwanya !


Mokonzi ya Babiloni azalaki kopesa ye nyonso oyo asengeli na yango mikolo nyonso ya bomoi na ye.


Esengo na bato na yo, esengo na basali na yo, oyo batelemaka tango nyonso liboso na yo mpe bayokaka maloba na yo, oyo etonda na bwanya !


Kolula te bilei na ye ya kitoko, pamba te, tango mosusu, ezali na yango bololo.


Yango wana, tala liloba oyo Yawe alobi : « Soki ozongi epai na Ngai, nakondima yo liboso na Ngai mpo ete osalela Ngai ; soki monoko na yo ezali kobimisa maloba ya tina, kasi maloba ya pamba-pamba te, okozala molobeli na Ngai. Tika ete bato oyo balanda yo ; kasi yo, kolanda bango te.


Mokonzi asololaki na bango ; mpe kati na bilenge nyonso oyo bamemelaki ye, amonaki ete moko te akokani na Daniele, na Anania, na Mikaeli mpe na Azaria. Boye, bakomaki kosala kati na ndako ya mokonzi.


Daniele azwaki mokano ya koboya komikomisa mbindo na nzela ya bilei mpe ya vino ya mokonzi ; ayebisaki mokonzi ya bakalaka ya lokumu ete apesa ye nzela te ya komikomisa mbindo na lolenge wana.


Pesa biso, na mokolo ya lelo, bilei na biso ya mokolo na mokolo ;


Anjelu azongiselaki ye : — Nazali Gabrieli ; natelemaka liboso ya Nzambe oyo atindi ngai mpo na koyebisa yo mpe kopesa yo basango oyo ya malamu.


Pesa biso bilei oyo tosengeli na yango, mokolo na mokolo,


Bosenzela malamu mpe bosambelaka tango nyonso, mpo ete bozwa makasi ya kokima makambo nyonso oyo ekoya mpe ya kotelema liboso ya Mwana na Moto.


Saulo atindaki maloba epai ya Izayi : « Nabondeli yo, tika ete Davidi akoba kosala epai na ngai, pamba te nazali kosepela na ye. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ