Daniele 1:17 - Mokanda na Bomoi17 Nzambe apesaki bilenge wana minei boyebi mpe bososoli kati na makambo nyonso : koloba, kokoma, kotanga mikanda, mayele mpe bwanya. Mpe Daniele akomaki na makoki ya kolimbola bimoniseli mpe bandoto ya ndenge na ndenge. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
bilenge mibali oyo banzoto na bango ezanga mbeba, ya bilongi kitoko, ya mayele mpe ya bwanya, oyo bazali na makoki ya koyekola kotanga mpe kokoma makambo ya ndenge na ndenge, oyo bazali na bososoli mpe bakoka mpo na kosala kati na ndako ya mokonzi ; Ashipenazi asengelaki kolakisa bango koloba, kokoma mikanda mpe kotanga lokota ya bato ya Babiloni.