Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Daniele 1:1 - Mokanda na Bomoi

1 Na mobu ya misato ya bokonzi ya Yeoyakimi, mokonzi ya Yuda, Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, ayaki kobundisa Yelusalemi mpe azingelaki yango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Daniele 1:1
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yeoyakimi azalaki na mibu tuku mibale na mitano ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu zomi na moko na Yelusalemi. Kombo ya mama na ye ezalaki « Zebuda. » Zebuda azalaki mwana ya Pedaya, moto ya Ruma.


Ndenge Yawe alobaki yango, Nabukodonozori azwaki bomengo nyonso oyo ezalaki kati na Tempelo ya Yawe mpe kati na ndako ya mokonzi ; bongo amemaki biloko nyonso ya wolo oyo Salomo, mokonzi ya Isalaele, asalaki mpo na Tempelo ya Yawe.


« Mingi kati na bakitani na yo, kati na ba-oyo babimi penza na mokongo na yo, bakomema bango mpe bakoboma bango mikongo mpo ete bakoma kosala kati na ndako ya mokonzi ya Babiloni. »


Tala liloba oyo Yawe alobaki na nzela ya Jeremi na tina na bato nyonso ya Yuda, tango Yeoyakimi, mwana mobali ya Joziasi, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu minei na bokonzi, mpe Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, akokisaki mobu moko na bokonzi.


Tala liloba oyo Yawe alobaki na nzela ya Jeremi wana Yeoyakimi, mwana mobali ya Joziasi, mokonzi ya Yuda, azalaki mokonzi :


Kasi tango Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, abotolaki mokili oyo, tolobaki : « Boya, tokende na Yelusalemi mpo ete tobikisa bomoi na biso liboso ya basoda ya Babiloni mpe ya Siri. » Yango wana, toyaki kovanda na Yelusalemi.


Tala liloba oyo Yawe alobaki na Jeremi, na mobu ya minei ya bokonzi ya Yeoyakimi, mwana mobali ya Joziasi, mokonzi ya Yuda :


Tango Baruki asilisaki kokoma kati na mokanda makambo oyo Jeremi atindaki ye, na mobu ya minei ya bokonzi ya Yeoyakimi, mwana mobali ya Joziasi, mokonzi ya Yuda, mosakoli Jeremi alobaki na Baruki, mwana mobali ya Neriya, maloba oyo :


Tala liloba oyo Yawe alobaki na mosakoli Jeremi na tina na Babiloni mpe bato na yango :


Tango Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, akokisaki mibu zomi na libwa na bokonzi, Nebuzaradani, mokonzi ya bakengeli ya mokonzi, oyo azalaki kosala esika moko na mokonzi ya Babiloni, ayaki na Yelusalemi na mokolo ya zomi ya sanza ya mitano.


Tala motango ya bato oyo Nabukodonozori amemaki na bowumbu : Bayuda nkoto misato na tuku mibale na misato, na mobu ya sambo wuta tango akomaki mokonzi ;


Boye, bamemaki Daniele liboso ya mokonzi. Mokonzi atunaki ye : — Yo nde Daniele, moko kati na bawumbu oyo tata na ngai amemaki wuta na Yuda ?


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ