Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Bilombe 9:9 - Mokanda na Bomoi

9 Nzete ya Olive ezongiselaki yango : ‹ Natika penza mafuta na ngai, oyo bapesaka na yango Nzambe mpe bato lokumu, mpo ete nakende koningana-ningana na likolo ya banzete mosusu ? ›

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Bilombe 9:9
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yawe atunaki Satana : — Owuti wapi ? Satana azongiselaki Yawe : — Nawuti kotambola mpe koyengayenga na mokili.


Yawe atunaki Satana : — Owuti wapi ? Satana azongiselaki Yawe : — Nawuti kotambola mpe koyengayenga na mokili.


vino mpo na kosepelisa mitema na bango, mafuta mpo na kongengisa bilongi na bango, mpe mapa mpo na kolendisa mitema na bango.


Mokolo moko, olobaki na bayengebene na Yo kati na emoniseli : « Nasungaki elombe moko ya bitumba, natombolaki elenge mobali moko kati na bato na ngai ;


okosala mapa mpe bagato ezanga levire, oyo farine na yango basangisa na mafuta ; okosala mpe mikate ezanga levire, kasi bapakola yango mafuta ; okosala yango na farine oyo batuta mpe bayungola malamu.


Okozwa mafuta ya epakolami, okosopa yango na moto na ye mpe okopakola ye yango.


etelemiselo ya minda, bisalelo na yango, minda na yango mpe mafuta mpo na kopelisa minda,


Soki moto alingi komema makabo ya mbuma epai na Yawe, makabo yango ekozala ya farine. Bongo na likolo na yango, akosopa mafuta mpe akotia ansa.


ndenge nini Nzambe atondisaki Yesu ya Nazareti na Molimo Mosantu mpe na nguya, mpe ndenge nini atambolaki bipai na bipai mpo na kosala bolamu mpe kobikisa bato nyonso oyo bazalaki na se ya nguya ya Satana, pamba te Nzambe azalaki elongo na Ye.


Pamba te, Erode mpe Ponse Pilato basanganaki penza kati na engumba oyo, elongo na bato ya bikolo mosusu mpe bana ya Isalaele, mpo na kosalela Yesu likita, Mosali na Yo, Mosantu, oyo obulisa.


Nzokande bino, bozali na epakolami kowuta na Molimo Mosantu, mpe bino nyonso bozali na boyebi ya nyonso.


Banzete elobaki na nzete ya figi : ‹ Yaka mpe zala mokonzi na biso. ›


Mokolo moko, banzete ebimaki mpo na kokomisa moko kati na yango mokonzi. Elobaki na nzete ya Olive : ‹ Zala mokonzi na biso. ›


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ