Bilombe 9:7 - Mokanda na Bomoi7 Tango bayebisaki makambo yango epai ya Yotami, amataki likolo ya ngomba Garizimi mpe agangaki makasi : « Bino bakambi ya Sishemi, boyoka ngai, mpo ete Nzambe ayoka bino. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Bato nyonso ya Isalaele elongo na bakambi na bango, bakomi mibeko mpe basambisi na bango, batelemaki ngambo na ngambo ya Sanduku ya Boyokani, liboso ya Banganga-Nzambe oyo bazali Balevi mpe bamemaka Sanduku ya Boyokani ya Yawe. Mopaya elongo na mwana mboka ya Isalaele bazalaki wana. Ndambo ezalaki liboso ya ngomba Garizimi, mpe ndambo mosusu, liboso ya ngomba Ebali, kolanda mitindo oyo Moyize, mosali na Yawe, apesaki mpo na kopambola bana ya Isalaele.