Nani abomaki Abimeleki, mwana mobali ya Yerubesheti ? Ezalaki te mwasi oyo, wuta na likolo ya mir, abwakelaki ye libanga oyo banikelaka ble, yango wana akufaki na Tebesi ? Mpo na nini bopusanaki pembeni ya mir ? › Soki atuni yo bongo, loba na ye : ‹ Mosali na yo, Iri, moto ya Iti, mpe akufi. › »
Ezali bongo te. Kasi Sheba, mwana mobali ya Bikiri, moto ya etuka ya bangomba ya Efrayimi, atombokelaki mokonzi Davidi. Kaba ye, ye moko kaka, mpe nakotika kozingela engumba. Mwasi yango alobaki na Joabi : — Bakobwakela yo moto na ye na likolo ya mir.
Yango wana, boyoka mabongisi oyo Yawe asili kosala mpo na kotelemela Edomi, mokano oyo asili kozwa mpo na kotelemela bavandi ya Temani : ‹ Bakobengana bango na lopango lokola bana mike ya etonga, akobebisa etando na bango.
Yango wana, boyoka mabongisi oyo Yawe asili kosala mpo na Babiloni, mokano oyo asili kozwa mpo na kotelemela mokili ya bato ya Babiloni : Bakobengana bango na lopango lokola bana mike ya etonga, akobebisa etando na bango.
Debora alobaki na ye : — Malamu, nakokende elongo na yo. Kasi yeba ete, na nzela oyo ozali kokende, lokumu ekozala ya yo te, pamba te Yawe akokaba Sisera na maboko ya mwasi. Boye, Debora akendeki elongo na Baraki, na mboka Kedeshi.
Nzete ya nzube ezongiselaki yango : ‹ Soki bolingi penza kopakola ngai mafuta mpo ete nazala mokonzi na bino, boya kobombama na se ya pio na ngai. Soki bongo te, tika ete moto ebima na nzete ya nzube mpe ezikisa banzete ya sedele ya Libani ! ›
Kasi soki ezali bongo te, tika ete moto ebima wuta na Abimeleki mpe etumba bino bavandi ya Sishemi mpe ya Beti-Milo ; mpe tika ete moto ebima wuta na bino bavandi ya Sishemi mpe ya Beti-Milo, mpe etumba Abimeleki ! »