51 Nzokande, ezalaki na ndako moko ya molayi mpe ya makasi kati na engumba. Bavandi nyonso, mibali mpe basi, bakimelaki kuna ; bakangaki ekuke sima na bango mpe bamataki na likolo ya ndako yango.
Nzokande, tempelo ezalaki ya kotonda na mibali, basi mpe bakambi nyonso ya Filisitia. Na likolo ya ndako, ezalaki na bato pene nkoto misato, mibali mpe basi, oyo bazalaki kotala masano oyo Samison azalaki kosala.