Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Bilombe 9:49 - Mokanda na Bomoi

49 Boye bato nyonso bakataki, moto na moto etape na ye ya nzete. Balandaki Abimeleki, batiaki bitape ya nzete na libulu ya mabanga mpe batumbaki libulu yango ya mabanga elongo na bato nyonso oyo bazalaki kati na yango. Boye bato nyonso ya ndako molayi ya Sishemi bakufaki : bato pene nkoto moko, mibali mpe basi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Bilombe 9:49
6 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Soki bozali kotukana mpe kozokisana, bosala keba ete bobomana te bino na bino.


Pamba te esika oyo zuwa mpe koswana ezali, esika wana mpe mobulu ya lolenge nyonso mpe misala mabe ezalaka.


Nzete ya nzube ezongiselaki yango : ‹ Soki bolingi penza kopakola ngai mafuta mpo ete nazala mokonzi na bino, boya kobombama na se ya pio na ngai. Soki bongo te, tika ete moto ebima na nzete ya nzube mpe ezikisa banzete ya sedele ya Libani ! ›


Kasi soki ezali bongo te, tika ete moto ebima wuta na Abimeleki mpe etumba bino bavandi ya Sishemi mpe ya Beti-Milo ; mpe tika ete moto ebima wuta na bino bavandi ya Sishemi mpe ya Beti-Milo, mpe etumba Abimeleki ! »


Abimeleki elongo na bato na ye nyonso bamataki na ngomba Tsalimoni. Abimeleki azwaki epasola mpe akataki mwa bitape ya nzete, amemaki yango na mapeka na ye mpe alobaki na bato nyonso oyo bazalaki elongo na ye : « Oyo bomoni ngai kosala, bino mpe bosala bongo na lombangu. »


Sima na yango, Abimeleki akendeki na Tebesi, azingelaki mpe abotolaki yango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ