Abimeleki elongo na bato na ye nyonso bamataki na ngomba Tsalimoni. Abimeleki azwaki epasola mpe akataki mwa bitape ya nzete, amemaki yango na mapeka na ye mpe alobaki na bato nyonso oyo bazalaki elongo na ye : « Oyo bomoni ngai kosala, bino mpe bosala bongo na lombangu. »