Bilombe 9:45 - Mokanda na Bomoi45 Abimeleki abundisaki engumba mokolo mobimba, abotolaki engumba yango mpe abomaki bato oyo bazalaki kuna. Bongo abebisaki engumba mpe asopelaki yango mungwa. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Babebisaki bingumba, mpe moto nyonso abwakaki libanga moko na bilanga nyonso ya kitoko kino etondaki na mabanga, bakangaki bitima nyonso ya mayi, mpe bakataki nzete nyonso ya kitoko. Kaka engumba ya Kiri-Aresheti nde etikalaki na mabanga na yango ; kasi babwaki ya mabanga bazingelaki yango mpe babundisaki yango lokola.
Yango wana, na Kombo na Ngai, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, « Moabi ekokoma penza lokola Sodome, mpe bato ya Amoni bakokoma lokola Gomore ; ekokoma esika oyo ebotaka matiti mabe, esika ya mabulu ya mungwa, esika ebebisama mpo na libela. Batikali na Ngai bakobotola bango bomengo na makasi, mpe batikali ya ekolo na Ngai bakozwa mikili yango lokola libula. »