Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Bilombe 9:4 - Mokanda na Bomoi

4 Bapesaki ye mbongo ya bibende ya palata, tuku sambo oyo bazwaki na tempelo ya Bala-Beriti. Na mbongo yango, Abimeleki afutaki bato ya mobulu mpo na kolanda ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Bilombe 9:4
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango Davidi azongaki mpo na kopambola ndako na ye, Mikali, mwana mwasi ya Saulo, abimaki mpo na kokutana na Davidi mpe alobaki : — Lokumu nini mokonzi ya Isalaele amipesi na mokolo ya lelo tango amitiki bolumbu na miso ya basi nyonso ya basali na ye ndenge moto pamba akokaki kosala ?


Bato pamba mpe bato oyo bazanga tina basanganaki elongo na ye mpe batombokelaki Roboami, mwana mobali ya Salomo, tango azalaki elenge ! Bongo lokola akembaki nanu te na mosala, alongaki mpe te kotelema liboso na bango.


Bana oyo batata na bango bazanga mayele mpe bazanga kombo babenganaki bango libanda ya mboka.


Moto oyo asalaka bilanga atondaka na bilei, kasi moto oyo alandaka bagoyigoyi azangi mayele.


Basakoli na yango bazali bato ya lolendo mpe ya lokuta. Banganga-Nzambe na yango babebisaka Esika ya bule mpe batosaka mibeko te.


Kasi Bayuda mosusu basalaki zuwa ; bakendeki kozwa bato ya mobulu oyo batambolaka pamba-pamba na balabala, basangisaki bango mpe babimisaki mobulu kati na engumba. Bakendeki mbangu na ndako ya Jazoni mpo na koluka Polo mpe Silasi mpo ete bamema bango liboso ya ebele ya bato.


Boye, Jefite akimaki mosika ya bandeko na ye ya mibali mpe akomaki kovanda kati na etuka ya Tobi. Bato ya mobulu basanganaki na ye mpe bazalaki kotambola elongo na ye.


Sima na kufa ya Jedeon, bana ya Isalaele bazongelaki kosambela banzambe Bala. Bakomisaki Bala-Beriti nzambe na bango.


Na tango ya kobuka bambuma ya vino, bato ya Sishemi bakendeki na bilanga, bakamolaki vino mpe basalaki feti monene kati na tempelo ya nzambe na bango. Wana bazalaki kolia mpe komela, balakelaki Abimeleki mabe.


Bato nyonso oyo bazalaki kati na minyoko, ba-oyo bazalaki na baniongo ya bato mosusu mpe ba-oyo mitema na bango ezoka, basanganaki zingazinga ya Davidi mpe akomaki mokambi na bango. Elongo na ye, ezalaki na bato pene nkama minei.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ