38 Zebuli alobaki na Gali : — Sik’oyo, tia lisusu monoko ! Mpe loba lisusu : « Abimeleki nde nani mpo ete tosalela ye ? » Ezali te bato oyo yo otiolaki ? Kende sik’oyo kobunda !
Wapi sik’oyo banzambe na bino, banzambe oyo bosalaki na maboko na bino ? Tika ete eya kobikisa bino na tango ya pasi, soki penza ekokoka ! Pamba te, oh bato na Yuda, ndenge motango ya bingumba na bino ezali, ndenge wana mpe motango ya banzambe na bino ezali.
Kasi Gali alobaki lisusu : — Tala, bato bazali kokita elongo na basoda wuta na likolo ya ngomba ya kati-kati ya engumba, mpe bamosusu bazali koya na nzela ya terebente ya bamoni makambo.
Bolobaloba maloba ebele te ya lolendo, mpe tika ete lofundu ebima na monoko na bino te, pamba te Yawe azali Nzambe oyo ayebi nyonso mpe asambisaka misala nyonso ya bato.