Atindaki bantoma na nkuku epai ya Abimeleki mpo na koloba na ye : « Gali, mwana mobali ya Ebedi, mpe bandeko na ye ya mibali bayaki na Sishemi, mpe bazali kotindika bato ya engumba mpo ete batombokela yo.
Bongo, na tongo-tongo, wana moyi ezali kobima, okokende mpe okobundisa engumba. Tango Gali elongo na bato na ye nyonso bakobima mpo na kokutana na yo, sala nyonso oyo loboko na yo ekoki kosala. »