30 Tango Zebuli, moyangeli ya engumba, ayokaki makambo oyo Gali, mwana mobali ya Ebedi, alobaki, asilikaki makasi.
Nzokande Gali, mwana mobali ya Ebedi, akendeki na Sishemi, elongo na bandeko na ye ya mibali ; mpe bato ya Sishemi batielaki ye motema.
Oh soki kaka nazalaki kokamba bato oyo, mbele nalingaki kobengana Abimeleki, mpe nalingaki koloba na ye : ‹ Bakisa lisusu makasi ya mampinga na yo, mpe yaka tobunda. › »
Atindaki bantoma na nkuku epai ya Abimeleki mpo na koloba na ye : « Gali, mwana mobali ya Ebedi, mpe bandeko na ye ya mibali bayaki na Sishemi, mpe bazali kotindika bato ya engumba mpo ete batombokela yo.
Abimeleki avandaki na Aruma, mpe Zebuli abenganaki Gali elongo na bandeko na ye ya mibali mpo ete bavanda lisusu te na Sishemi.