Bilombe 9:28 - Mokanda na Bomoi28 Bongo Gali, mwana mobali ya Ebedi, alobaki : « Abimeleki nde nani liboso ya Sishemi mpo ete biso bato ya Sishemi tosalela ye ? Boni, azali mwana mobali ya Yerubali te ? Zebuli azali molobeli na ye te ? Bosalela bato ya Amori, tata ya Sishemi ! Kasi mpo na nini tosalela Abimeleki ? အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Moto moko ya mobulu na kombo Sheba, mwana mobali ya Bikiri, moto ya ekolo ya Benjame, abetaki kelelo mpe agangaki : « Tozali na eteni ata moko te ya lisanga na Davidi, tozali ata na eloko moko te ya lisanga na mwana mobali ya Izayi. Isalaele, tika ete moto moko na moko azonga na ndako na ye ya kapo. »
Tango bana nyonso ya Isalaele bamonaki ete mokonzi aboyi koyoka bango, bazongiselaki ye : « Eloko nini ya lisanga tozali na yango na Davidi ? Tozali na eloko moko te ya lisanga na mwana mobali ya Izayi ! Isalaele, tika ete moto na moto azonga na ndako na ye ya kapo ! Mpe yo, mokitani ya Davidi, tikala kotala makambo ya ndako na yo ! » Boye, bana ya Isalaele bazongaki na bandako na bango ya kapo.