Abrami alobaki na Loti : « Tika ete koswana ezala te kati na ngai mpe yo to kati na babateli bibwele na yo mpe babateli bibwele na ngai, pamba te tozali bandeko.
Bavandi ya Sishemi batielaki Abimeleki motambo na likolo ya bangomba : batiaki bato na esika ya kobombama mpo na kobotola biloko epai ya baleki nzela nyonso oyo bazalaki koleka pene na bango. Mpe bamemelaki Abimeleki sango yango.
Na tango ya kobuka bambuma ya vino, bato ya Sishemi bakendeki na bilanga, bakamolaki vino mpe basalaki feti monene kati na tempelo ya nzambe na bango. Wana bazalaki kolia mpe komela, balakelaki Abimeleki mabe.
Bongo Gali, mwana mobali ya Ebedi, alobaki : « Abimeleki nde nani liboso ya Sishemi mpo ete biso bato ya Sishemi tosalela ye ? Boni, azali mwana mobali ya Yerubali te ? Zebuli azali molobeli na ye te ? Bosalela bato ya Amori, tata ya Sishemi ! Kasi mpo na nini tosalela Abimeleki ?