Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Bilombe 9:24 - Mokanda na Bomoi

24 Nzambe asalaki bongo mpo na kozongisa mabe na mabe na oyo basalaki tango babomaki bana mibali tuku sambo ya Yerubali, mpo ete makila na bango etangama na moto ya ndeko na bango ya mobali, Abimeleki, mpe na mito ya bato ya Sishemi oyo basungaki ye mpo na koboma bandeko na ye ya mibali.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Bilombe 9:24
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tika ete Yawe akweyisa likolo na ye moko mokumba ya makila oyo asopaki, pamba te abundisaki bato mibale mpe abomaki bango na mopanga ; tata na ngai, Davidi, ayebaki kutu te. Tala bakombo ya bato mibale yango : Abineri, mwana mobali ya Neri, mokonzi ya mampinga ya Isalaele ; mpe Amasa, mwana mobali ya Yeteri, mokonzi ya mampinga ya Yuda ; bazalaki bato malamu mpe ya sembo koleka ye.


Tika ete ngambo ya makila na bango ezala mpo na libela likolo ya moto ya Joabi mpe ya bana na ye. Kasi tika ete kimia ya Yawe ezala mpo na libela na Davidi, na bana na ye, na libota na ye mpe na kiti na ye ya bokonzi.


Kasi tango mokonzi ayokaki sango ya likita ya Amani, akomaki mobeko kati na mokanda mpo ete makanisi mabe oyo Amani abongisaki mpo na Bayuda ekweya na moto na ye moko mpe, lisusu, badiembika ye elongo na bana na ye ya mibali, na nzete.


atimolaka libulu, kasi ye moko nde akweyaka kati na yango.


Pasi oyo ayokisaka bato ezongelaka ye moko, mpe mabe na ye ekweyaka na moto na ye moko.


Bokokomisa mbindo te mokili epai wapi bozali. Solo, kosopa makila ekomisaka mokili mbindo ; pamba te soki makila esopani na mokili, ezali kaka na nzela ya makila ya moto oyo asopi yango nde bakoki kokomisa lisusu mokili peto.


« Alakelama mabe, moto nyonso oyo akozwa kanyaka mpo na koboma moto oyo ayebi likambo te ! » Bato nyonso bakozongisa : « Amen ! »


Adoni-Bezeki alobaki : « Bakonzi tuku sambo, oyo bakata bango misapi ya minene ya maboko mpe ya makolo, bazalaki kolokota biloko oyo ezalaki kokweya na se ya mesa na ngai. Sik’oyo, Nzambe azongiseli ngai makambo oyo nasalaki baninga. » Bamemaki ye na Yelusalemi, mpe akufaki kuna.


Bavandi ya Sishemi batielaki Abimeleki motambo na likolo ya bangomba : batiaki bato na esika ya kobombama mpo na kobotola biloko epai ya baleki nzela nyonso oyo bazalaki koleka pene na bango. Mpe bamemelaki Abimeleki sango yango.


Kasi Samuele alobaki : « Ndenge mopanga na yo ezangisaki basi bana na bango, ndenge wana mpe mama na yo, kati na basi, akozanga mwana mobali. » Boye, Samuele abomaki Agagi liboso ya Yawe, na Giligali.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ