Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Bilombe 9:17 - Mokanda na Bomoi

17 bobosana te ete tata na ngai abundelaki bino, andimaki ata kokufa mpo na kokangola bino wuta na loboko ya Madiani.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Bilombe 9:17
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

— Kende kosangisa Bayuda nyonso oyo bazali na engumba Size. Bokila bilei mikolo misato mpo na ngai ; butu mpe moyi, bolia mpe bomela eloko te. Ngai mpe nakokila bilei elongo na basi bawumbu na ngai ndenge moko na bino. Sima na yango kaka nde nakokende epai ya mokonzi atako nakobuka mobeko. Soki mpe nakokufa, nakufa kaka !


Bandimaki ata kokufa mpo na ngai. Ngai moko kaka te nde nazali kotonda bango, kasi mpe Mangomba nyonso ya mikili ya Bapagano.


Kasi tala ndenge nini Nzambe alakisi biso bolingo na Ye : wana tozalaki nanu bato ya masumu, Klisto akufelaki biso.


Kasi bango balongi ye na nzela ya makila ya Mpate, mpe na nzela ya liloba ya litatoli na bango ; balingaki te bomoi na bango kino kondima ata kokufa.


Tango namonaki ete bokangoli na bino ngai te, nakabaki bomoi na ngai, mpe nakatisaki ngai moko nzela ya bato ya Amoni mpo na kobundisa bango ; mpe Yawe apesaki ngai elonga likolo na bango. Sik’oyo, mpo na nini boyei lelo kobundisa ngai ?


Soki penza bosaleli na bosembo mpe na bosolo, wana bokomisi Abimeleki mokonzi ; soki bozalaki na motema malamu liboso ya Yerubali mpe libota na ye, soki bosalelaki ye kolanda misala malamu oyo ye asalelaki bino,


Kasi na mokolo ya lelo, botombokeli libota ya tata na ngai, bobomi bana na ye ya mibali tuku sambo, na libanga moko, mpe botie Abimeleki, mwana mobali ya mwasi mowumbu na ye, mokonzi ya bato ya Sishemi, pamba te azali ndeko na bino ya mobali.


Andimaki kobungisa bomoi na ye tango abomaki moto ya Filisitia, mpe, na mokolo yango, Yawe azwaki elonga monene mpo na Isalaele mobimba. Omonaki yango mpe osepelaki na yango makasi. Sik’oyo, mpo na nini olingi na yo kosala lisumu na tina moko te, na koboma moto lokola Davidi oyo asali na ye likambo te ? »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ