Bilombe 9:15 - Mokanda na Bomoi15 Nzete ya nzube ezongiselaki yango : ‹ Soki bolingi penza kopakola ngai mafuta mpo ete nazala mokonzi na bino, boya kobombama na se ya pio na ngai. Soki bongo te, tika ete moto ebima na nzete ya nzube mpe ezikisa banzete ya sedele ya Libani ! › အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Na nzela ya bantoma na yo, ofingaki Nkolo mpe olobaki : ‹ Na lisungi ya ebele ya bashar na ngai, namataki kino na basonge ya bangomba, kino na basonge oyo eleki likolo kati na Libani ; nakweyisaki banzete na yango ya sedele oyo eleki milayi, banzete na yango ya sipele oyo eleki kitoko, mpe nakomaki kino na songe na yango ya suka, na zamba na yango oyo eleki kitoko ;
Boye bato nyonso bakataki, moto na moto etape na ye ya nzete. Balandaki Abimeleki, batiaki bitape ya nzete na libulu ya mabanga mpe batumbaki libulu yango ya mabanga elongo na bato nyonso oyo bazalaki kati na yango. Boye bato nyonso ya ndako molayi ya Sishemi bakufaki : bato pene nkoto moko, mibali mpe basi.