6 Kasi bakonzi ya mboka Sukoti bazongiselaki ye : — Boni, osili kozwa Zeba mpe Tsalimuna na se ya bokonzi na yo mpo ete biso topesa basoda na yo mapa ?
Wana bavandaki mpo na kolia, batombolaki miso mpe bamonaki bato ya libota ya Isimaeli elongo na bashamo na bango koya wuta na Galadi. Bashamo na bango ezalaki komema na Ejipito : biloko ya mike-mike ya solo kitoko oyo balambelaka, mafuta ya solo kitoko mpe mire.
Nzokande tango bato ya mombongo ya mokili ya Madiani balekaki wana, babimisaki Jozefi wuta na libulu mpe batekaki ye epai ya bato ya ekolo ya Isimaeli, na motuya ya mbongo ya bibende, tuku mibale ; mpe bango bamemaki ye na Ejipito.
Kasi Joasi, mokonzi ya Isalaele, azongiselaki Amatsia, mokonzi ya Yuda : — Mokolo moko, nzete ya sende ya Libani etindaki maloba epai ya nzete ya sedele ya Libani : « Balisa mwana na yo ya mwasi epai ya mwana na ngai ya mobali. » Kasi nyama moko ya zamba elekaki mpe enyataki nzete ya sende.
Bolakela mboka ya Merozi mabe, elobi anjelu ya Yawe. Bolakela, bolakela mabe bato oyo bavandi kuna ! Pamba te bayei te kosunga Yawe ; bayei te kosunga bilombe ya bitumba !
Jedeon akendeki epai ya bato ya mboka Sukoti mpe alobaki na bango : « Tala Zeba mpe Tsalimuna oyo bofingelaki ngai na koloba : ‹ Osili kotia na se ya bokonzi na yo Zeba mpe Tsalumuna mpo ete biso topesa lipa na basoda na yo, oyo basili kolemba ? › »
Tango bakomaki na mboka Sukoti, Jedeon asengaki na bato ya mboka : — Bopesa basoda na ngai mapa, pamba te basili kolemba na nzala. Nazali kolanda Zeba mpe Tsalimuna, bakonzi ya Madiani.