Yango wana tobungisaka elikya te. Mpe atako bomoto na biso ya libanda ezali kobeba moke-moke, kasi bomoto na biso ya kati ekomaka ya sika, mokolo na mokolo.
Bakangaki bakonzi mibale ya bato ya Madiani : Orebi mpe Zeebi. Babomaki Orebi na libanga monene ya Orebi, mpe Zeebi na esika oyo bakamolaka vino ya Zeebi. Balandaki bato ya Madiani mpe bamemelaki Jedeon mito ya Orebi mpe ya Zeebi, kuna na ngambo ya Yordani.
Nzambe akabaki bakonzi ya bato ya Madiani, Orebi mpe Zeebi, na maboko na bino. Eloko nini ya lokumu ngai nasali oyo ekokani na oyo bino bosala ? Liloba oyo ekitisaki kanda na bango.