Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Bilombe 8:34 - Mokanda na Bomoi

34 Bana ya Isalaele babosanaki Yawe, Nzambe na bango, oyo akangolaki bango na maboko ya banguna na bango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Bilombe 8:34
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Moto ezikisaki lisanga na bango mpe etumbaki bato mabe wana nyonso.


Babosanaki Nzambe, Mobikisi na bango, oyo asalaki makambo minene kati na Ejipito,


babosanaki bikamwa na Ye mpe makambo minene oyo atalisaki bango.


Babosanaki makambo minene oyo asalaki na nguya na Ye, mokolo oyo akangolaki bango wuta na maboko ya monyokoli ;


Kanisa Mokeli na yo, na mikolo nyonso ya bolenge na yo, liboso ete mikolo ya pasi ekomela yo, mpe mibu epusana, mibu oyo okoloba na tina na yango : « Nazali kosepela na ngai na yango te ; »


Boni, elenge mwasi abosanaka penza biloko na ye ya monzele ? Boni, mobandami ya libala abosanaka solo mayaka na ye ? Nzokande, bato na Ngai babosani Ngai mikolo ebele.


Bakanisi ete bakoki kosala ete bato na Ngai babosana Kombo na Ngai na nzela ya ndoto oyo bazali koloba bango na bango, ndenge batata na bango babosanaki Kombo na Ngai mpo na kosalela nzambe Bala ?


Nakopesa ye etumbu mpo na mikolo nyonso oyo atumbelaki nzambe ya Bala malasi ya ansa. Azalaki kolata babiju mpe mayaka ya talo mpo na kokende epai ya bamakangu na ye ; kasi ngai, abosanaki Ngai, elobi Yawe.


Nzokande, sala keba mpe omisenzela mpo ete obosana te makambo oyo miso na yo emonaki to kotika te makambo yango elongwa na motema na yo na mikolo nyonso ya bomoi na yo. Teya yango na bana na yo mpe na bana na bango oyo bakobotama na sima na bango.


Bana ya Isalaele basalaki makambo mabe na miso ya Yawe ; babosanaki Yawe, Nzambe na bango, mpe basalelaki banzambe Bala mpe Ashera.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ