Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Bilombe 8:32 - Mokanda na Bomoi

32 Jedeon, mwana mobali ya Joasi, akufaki na kimobange ya esengo, mpe bakundaki ye kati na kunda ya Joasi, na Ofira, mboka ya libota ya Abiezeri.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Bilombe 8:32
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bongo yo, okokufa na kimia mpe okokundama sima na kimobange ya esengo.


Bongo Abrayami akataki motema mpe akufaki. Sima na ye kotonda mikolo mpe kokoma mobange makasi, akendeki kokutana na bakoko na ye.


Bakamataki Asaeli mpe bakundaki ye kati na kunda ya tata na ye, na Beteleemi. Bongo Joabi mpe bato na ye batambolaki butu mobimba mpe bakomaki na Ebron na tongo-tongo.


Mpe Yobo akufaki na kimobange makasi mpe atondaki na mikolo.


Okokita na kunda na kimobange makasi, ndenge batelemisaka maboke ya matiti na tango na yango.


Bongo Jedeon atongaki etumbelo mpo na Yawe mpe abengaki yango « Yawe apesaka kimia. » Etumbelo yango ezali kino na mokolo ya lelo kati na Ofira, mboka ya libota ya Abiezeri.


Jedeon asalelaki yango ekeko oyo atiaki na Ofira, engumba na ye. Bana ya Isalaele bakomaki kokende kofukama liboso ya ekeko yango, mpe ekomaki motambo monene mpo na Jedeon mpe libota na ye.


Makangu na ye, oyo azalaki kovanda na Sishemi, abotelaki ye mpe mwana mobali oyo bapesaki kombo « Abimeleki. »


Sima na kufa ya Jedeon, bana ya Isalaele bazongelaki kosambela banzambe Bala. Bakomisaki Bala-Beriti nzambe na bango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ