3 Nzambe akabaki bakonzi ya bato ya Madiani, Orebi mpe Zeebi, na maboko na bino. Eloko nini ya lokumu ngai nasali oyo ekokani na oyo bino bosala ? Liloba oyo ekitisaki kanda na bango.
Pamba te na ngolu oyo epesameli ngai, nazali koloba na bino nyonso : bomikanisaka te koleka makoki na bino, kasi bomikanisaka na lolenge ya mayele, kolanda kondima oyo Nzambe apesi na moko na moko kati na bino.
Kasi Jedeon azongiselaki bango : — Nasali nini oyo ekokani na oyo bino bosala ? Boni, ndambo ya bambuma ya vino oyo etikalaki na sima mpo ete Efrayimi abuka yango ezali kitoko te koleka bambuma ya vino ya liboso ya Abiezeri ?