Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Bilombe 8:28 - Mokanda na Bomoi

28 Boye, bato ya Madiani bakitisamaki liboso ya bana ya Isalaele mpe batombolaki lisusu mito na bango te. Na tango nyonso oyo Jedeon azalaki na bomoi, mokili etikalaki na kimia mibu tuku minei.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Bilombe 8:28
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Oh Nzambe, kovanda nye te ! Nzambe, kokanga monoko na Yo te, kotikala kimia te !


Yawe, Mokonzi ya mampinga, akotombola fimbu mpo na kobeta Asiri ndenge abetaki Madiani na libanga ya Orebi. Mpe lisusu, akotombola nzete na Ye likolo ya ebale monene lokola na Ejipito.


Basapato nyonso ya basoda oyo lokito na yango eningisaka mabele, mpe bilamba nyonso oyo etondaki na makila, ekobwakama na moto mpo ete ezika makasi.


Sima na yango, mokili ekomaki na kimia mibu tuku minei kino tango Otinieli, mwana mobali ya Kenazi, akufaki.


Na mokolo wana, bana ya Isalaele balembisaki bato ya Moabi, mpe mokili ezalaki na kimia mibu tuku mwambe.


Yawe, tika ete banguna na Yo nyonso bakufa bongo ! Tika ete bato oyo balingaka Yo bangenga makasi lokola moyi ya midi ! Mokili ezalaki na kimia mibu tuku minei.


Jedeon asalelaki yango ekeko oyo atiaki na Ofira, engumba na ye. Bana ya Isalaele bakomaki kokende kofukama liboso ya ekeko yango, mpe ekomaki motambo monene mpo na Jedeon mpe libota na ye.


Yerubali, mwana mobali ya Joasi, azongaki na ndako na ye mpe avandaki kuna.


Bato ya Filisitia bayokisamaki soni mpe bazongelaki lisusu te kokota na mokili ya Isalaele. Na mikolo nyonso ya bomoi ya Samuele, loboko na Yawe etelemelaki bato ya Filisitia.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ