27 Jedeon asalelaki yango ekeko oyo atiaki na Ofira, engumba na ye. Bana ya Isalaele bakomaki kokende kofukama liboso ya ekeko yango, mpe ekomaki motambo monene mpo na Jedeon mpe libota na ye.
Botika bango te ete bawumela na mokili na bino, noki te bakotinda bino kosala masumu liboso na Ngai mpe kosalela banzambe na bango ; pamba te ekozala solo motambo mpo na bino. »
Aron azwaki biloko oyo bapesaki ye, anyangwisaki yango na moto, mpe sima, asalaki ekeko ya mwana ngombe. Bongo balobaki : — Tala nzambe na yo, oh Isalaele, oyo abimisaki yo na Ejipito.
mpe soki bozwi na libala bana na bango ya basi mpo na bana na bino ya mibali, wana bana na bango ya basi bakokoba kosambela banzambe na bango ya bikeko, bakotindika bana na bino ya mibali na kosambela banzambe na bango.
Basalaki lolendo mpo na kitoko mpe motuya ya biloko na bango ya monzele oyo basalaki na yango banzambe na bango ya bikeko mpe bililingi ya somo. Yango wana, nakokomisa biloko yango mbindo na miso na bango.
Bongo, bato ya Yuda mpe ya Isalaele bakozonga lisusu kozala ekolo moko, bakopona mokonzi moko kaka mpe bakobima na mokili ya bowumbu, pamba te mokolo ya Jizireyeli ekozala mokolo monene.
Bosengeli koluka esika oyo Yawe, Nzambe na bino, akopona kati na bikolo na bino nyonso mpo na kotia Kombo na Ye mpe mpo na kokomisa yango esika na Ye. Ezali na esika yango kaka nde bosengeli kokende.
Okoboma bato nyonso oyo Yawe, Nzambe na yo, akokaba na maboko na yo ; okoyokela bango mawa te. Kosalela banzambe na bango te mpo ete yango ekozala motambo mpo na yo.
Okotumba na moto banzambe na bango ya bikeko. Kolula te mpe kozwa te palata mpe wolo oyo ezali na likolo na yango, ekoki kozala motambo mpo na yo ; pamba te ezali nkele na miso ya Yawe, Nzambe na yo.
Nzokande, Mika azalaki na esika na ye ya bule epai wapi azalaki kosambela. Asalisaki efode mpe banzambe mosusu ya bikeko ; bongo abulisaki lokola nganga-nzambe na ye, moko kati na bana na ye ya mibali.
Bongo mibali mitano oyo banongaki mokili ya Laishi balobaki na bandeko na bango : « Boni, boyebi ete kati na ndako oyo tovandi, ezali na efode, bikeko mike-mike ya ndako mpe nzambe ya ekeko basala na ebende oyo banyangwisa na moto ? Boyeba likambo nini bokosala. »
Bato mitano oyo banongaki mokili bakotaki kati na ndako mpe bazwaki efode, bikeko mike-mike ya ndako mpe nzambe ya ekeko basala na ebende banyangwisa na moto. Nganga-nzambe atelemaki liboso ya ekuke elongo na mibali nkama motoba oyo bamilengelaki mpo na bitumba.
Sik’oyo, nalobi na bino ete nakobengana bango lisusu te liboso na bino ; bakokoma nzube na mipanzi na bino, mpe banzambe na bango ya bikeko ekokoma mitambo mpo na bino. »
Anjelu ya Yawe ayaki mpe avandaki na se ya terebente oyo ezalaki na Ofira, kati na mabele ya Joasi, moto ya libota ya Abiezeri. Jedeon, mwana mobali ya Joasi, azalaki kosangisa bambuma ya ble esika moko, na esika oyo basalaka masanga ya vino, mpo na kobomba yango liboso ya bato ya Madiani.
Bongo Jedeon atongaki etumbelo mpo na Yawe mpe abengaki yango « Yawe apesaka kimia. » Etumbelo yango ezali kino na mokolo ya lelo kati na Ofira, mboka ya libota ya Abiezeri.
Biloko ya matoyi ya wolo, oyo Jedeon asengaki ezalaki ya bakilo pene tuku mibale, longola bamedayi ya wolo oyo ezalaki lokola sanza ya ndambo, biloko ya matoyi oyo ediembelaka, bilamba ya talo ya motane makasi oyo bakonzi ya Madiani balataki mpe mayaka oyo ezalaki na bakingo ya bashamo na bango.
Boye, bato ya Madiani bakitisamaki liboso ya bana ya Isalaele mpe batombolaki lisusu mito na bango te. Na tango nyonso oyo Jedeon azalaki na bomoi, mokili etikalaki na kimia mibu tuku minei.