Bilombe 8:26 - Mokanda na Bomoi26 Biloko ya matoyi ya wolo, oyo Jedeon asengaki ezalaki ya bakilo pene tuku mibale, longola bamedayi ya wolo oyo ezalaki lokola sanza ya ndambo, biloko ya matoyi oyo ediembelaka, bilamba ya talo ya motane makasi oyo bakonzi ya Madiani balataki mpe mayaka oyo ezalaki na bakingo ya bashamo na bango. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Bapakola yango palata balekisa na moto, oyo ewuta na Tarsisi, mpe wolo oyo ewuta na Ufazi ; bato oyo basalaka bililingi na banzete mpe ba-oyo balambaka bibende na moto nde basalaka yango : balatisaka yango bilamba ya langi ya ble mpe ya motane ; ezali misala ya bato oyo basalaka misala ya maboko, oyo bayebi penza mosala malamu.
wolo, palata, mabanga ya talo, mayaka, bilamba ya lino ya kitoko, bilamba ya motane ya pete, bilamba ya swa, bilamba ya motane makasi, banzete na bango ya solo kitoko, biloko na bango oyo basala na pembe ya nzoko, biloko nyonso oyo basala na banzete ya talo, na bronze, na bibende mpe na mabanga kitoko oyo babengaka marbre ;