Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Bilombe 8:24 - Mokanda na Bomoi

24 Jedeon abakisaki : — Nalingi kosenga bino eloko moko : Kati na biloko oyo bino bosili kozwa na bitumba, tika ete moko na moko kati na bino apesa ngai eloko ya litoyi. Pamba te banguna na biso bazalaki kolata biloko ya matoyi mpo ete bazali bana ya Isimaeli.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Bilombe 8:24
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango bashamo esilisaki komela mayi, mosali azwaki lopete moko ya wolo, oyo batiaka na zolo mpe ezalaki ya bagrame motoba. Azwaki mpe basheneti mibale ya wolo : moko na moko ezalaki na bagrame koleka nkama moko.


Abimisaki biloko ya wolo, ya palata mpe bilamba ; bongo apesaki yango na Rebeka. Apesaki mpe bakado ya motuya epai ya ndeko na ye ya mobali mpe epai ya mama na ye.


Tala molongo ya bakitani ya Isimaeli, mwana mobali ya Abrayami, oyo Agari, moto ya Ejipito mpe mwasi mosali ya Sara, abotelaki Abrayami.


Tala bakombo ya bana mibali ya Isimaeli kolanda ndenge babotamela : Nebayoti, mwana mobali ya liboso ya Isimaeli ; Kedari, Adibeli, Mibisami,


Bapesaki Jakobi banzambe nyonso ya bapaya, oyo bazalaki na yango mpe biloko na bango ya matoyi. Boye Jakobi akundaki yango na se ya nzete ya terebente oyo ezalaki pene ya Sishemi.


Wana bavandaki mpo na kolia, batombolaki miso mpe bamonaki bato ya libota ya Isimaeli elongo na bashamo na bango koya wuta na Galadi. Bashamo na bango ezalaki komema na Ejipito : biloko ya mike-mike ya solo kitoko oyo balambelaka, mafuta ya solo kitoko mpe mire.


Nzokande tango bato ya mombongo ya mokili ya Madiani balekaki wana, babimisaki Jozefi wuta na libulu mpe batekaki ye epai ya bato ya ekolo ya Isimaeli, na motuya ya mbongo ya bibende, tuku mibale ; mpe bango bamemaki ye na Ejipito.


Mokonzi ya Isalaele azongisaki : — Boloba na ye : « Moto oyo alati bibundeli asengeli komikumisa te lokola moto oyo alongoli bibundeli ! »


Bato ya Isalaele basalaki ndenge Moyize alobaki na bango mpe basengaki epai ya bato ya Ejipito biloko ya palata, ya wolo mpe bilamba.


Bato nyonso balongolaki biloko ya matoyi mpe bamemaki yango epai ya Aron.


Aron azwaki biloko oyo bapesaki ye, anyangwisaki yango na moto, mpe sima, asalaki ekeko ya mwana ngombe. Bongo balobaki : — Tala nzambe na yo, oh Isalaele, oyo abimisaki yo na Ejipito.


bapesi mokongo noki na makambo oyo natindaki bango mpe bamisaleli ekeko ya mwana ngombe. Bagumbameli yango, babonzeli yango makabo mpe balobi : « Tala nzambe na yo, Oh Isalaele, oyo abimisaki yo na Ejipito. »


Basalaki lolendo mpo na kitoko mpe motuya ya biloko na bango ya monzele oyo basalaki na yango banzambe na bango ya bikeko mpe bililingi ya somo. Yango wana, nakokomisa biloko yango mbindo na miso na bango.


Bana ya Isalaele bazongisaki : — Tokopesa yango. Batandaki elamba na mabele, moko na moko abwakaki eloko na ye ya litoyi, oyo ewutaki na bomengo ya bitumba.


Mpo na nini nakamata mapa na ngai, mayi na ngai mpe mosuni, oyo nabongisi mpo na bato na ngai, oyo bakataka bapwale, mpo na kopesa yango epai ya bato oyo nayebi kutu epai bawuti te ? »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ