Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Bilombe 8:21 - Mokanda na Bomoi

21 Zeba mpe Tsalimuna balobaki : « Telema mpe boma biso yo moko, pamba te likambo oyo ekoki na bato ya mitema makasi. » Boye, Jedeon atelemaki mpe abomaki bango. Akamataki bamedayi ya wolo oyo ezalaki na bakingo ya bashamo na bango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Bilombe 8:21
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Babebisamaki na Eyini-Dori, bakomaki lokola matiti ya kopola mpo na mabele.


Sala bato na bango ya lokumu ndenge osalaki Orebi mpe Zeebi ; mpe sala bakambi na bango ndenge osalaki Zeba mpe Tsalimuna


Na mokolo wana, Nkolo akolongola bango biloko na bango oyo basalelaka monzele : basheneti oyo balataka na makolo mpe babiju ya talo oyo ezalaka lokola moyi mpe sanza ;


Sima na yango, Jozue abomaki bakonzi yango mpe adiembikaki bango na banzete mitano. Bibembe na bango etikalaki kodiembela na banzete yango kino na pokwa.


Na basanza wana mitano, bato bakoluka kufa, kasi bakozwa yango te ; bakolinga kokufa, kasi kufa ekokima bango.


Bato ya Yuda balobaki na Samison : — Toyei mpo na kokanga yo na basinga mpe kokaba yo na maboko ya bato ya Filisitia. Samison alobaki na bango : — Bolapa ndayi liboso na ngai ete bokoboma ngai te bino moko.


Mpe apesaki mitindo na Yeteri, mwana na ye ya liboso ya mobali : « Telema mpe boma bango ! » Kasi elenge mobali abimisaki mopanga na ye te, pamba te azalaki nanu elenge mpe azalaki na somo.


Bana ya Isalaele balobaki na Jedeon : — Zala mokonzi na biso, yo moko, mwana na yo ya mobali mpe koko na yo ya mobali, pamba te obikisi biso na loboko ya bato ya Madiani.


Biloko ya matoyi ya wolo, oyo Jedeon asengaki ezalaki ya bakilo pene tuku mibale, longola bamedayi ya wolo oyo ezalaki lokola sanza ya ndambo, biloko ya matoyi oyo ediembelaka, bilamba ya talo ya motane makasi oyo bakonzi ya Madiani balataki mpe mayaka oyo ezalaki na bakingo ya bashamo na bango.


Abimeleki abengaki na lombangu elenge mobali oyo azalaki komema bibundeli na ye mpe alobaki na ye : « Bimisa mopanga na yo mpe boma ngai mpo baloba te na tina na ngai : ‹ Mwasi moko abomaki ye. › » Boye, elenge mobali atobolaki ye mopanga mpe akufaki.


Bongo bitumba ekomaki mpo na koboma Saulo. Tango basoda oyo babundaka na matolotolo bamonaki Saulo, ye Saulo alengaki na somo.


Tango soda oyo amemaki bibundeli na ye amonaki ete Saulo akufi, ye mpe amibwakaki na likolo ya mopanga na ye mpe akufaki elongo na Saulo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ