20 Mpe apesaki mitindo na Yeteri, mwana na ye ya liboso ya mobali : « Telema mpe boma bango ! » Kasi elenge mobali abimisaki mopanga na ye te, pamba te azalaki nanu elenge mpe azalaki na somo.
Tango bamemaki bakonzi yango epai ya Jozue, abengisaki mibali nyonso ya Isalaele mpe alobaki na bakonzi ya basoda oyo bazalaki na ye elongo : « Bopusana mpe botia makolo na bino na bakingo ya bakonzi oyo. » Bakonzi ya basoda bapusanaki mpe batiaki makolo na bango na bakingo ya bakonzi yango.
Jedeon alobaki na bango lisusu : — Bato wana bazalaki bandeko na ngai ya mibali, bana ya mama na ngai penza. Na Kombo na Yawe, soki bobikisaki bango, ngai mpe nalingaki koboma bino te.
Kasi Samuele alobaki : « Ndenge mopanga na yo ezangisaki basi bana na bango, ndenge wana mpe mama na yo, kati na basi, akozanga mwana mobali. » Boye, Samuele abomaki Agagi liboso ya Yawe, na Giligali.