Jedeon akendeki epai ya bato ya mboka Sukoti mpe alobaki na bango : « Tala Zeba mpe Tsalimuna oyo bofingelaki ngai na koloba : ‹ Osili kotia na se ya bokonzi na yo Zeba mpe Tsalumuna mpo ete biso topesa lipa na basoda na yo, oyo basili kolemba ? › »
Jedeon alobaki : — Lokola bolobi boye, tango Yawe akokaba, na maboko na ngai, Zeba mpe Tsalimuna, nakopasola-pasola misuni na bino na basende ya esobe mpe na singa ya nzube.