13 Jedeon, mwana mobali ya Joasi, azongaki wuta na bitumba na nzela ya ngomba Eresi.
Zeba mpe Tsalimuna, bakonzi mibale ya Madiani, bakimaki ; kasi Jedeon alandaki mpe akangaki bango. Mpe apanzaki mampinga na bango nyonso.
Akangaki elenge mobali moko kati na mibali ya mboka Sukoti, mpe atunaki ye mituna. Boye, elenge mobali yango akomelaki ye bakombo ya bakambi mpe ya bampaka tuku sambo na sambo ya engumba.