Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Bilombe 8:10 - Mokanda na Bomoi

10 Nzokande, Zeba mpe Tsalimuna bazalaki na Karikori elongo na basoda na bango, nkoto zomi na mitano. Oyo ezali nde motango nyonso ya basoda ya bato ya este oyo batikalaki. Pamba te basoda nkoto nkama moko na tuku mibale oyo bayebi kobunda na mopanga bakufaki.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Bilombe 8:10
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango mokonzi ya Moabi amonaki ete bitumba ebalukeli ye, akamataki basoda nkama sambo oyo babundaka na mipanga, mpo na kofungola nzela kino epai ya mokonzi ya Edomi, kasi balongaki te.


Abiya mpe mampinga na ye bazwaki elonga monene liboso ya mampinga ya Isalaele mpe babomaki bilombe ya Isalaele pene nkoto nkama mitano.


Na mokolo moko, Peka, mwana mobali ya Remalia, abomaki basoda nkoto nkama moko na tuku mibale kati na Yuda, bango nyonso bazalaki basoda ya mpiko ; pamba te basundolaki Yawe, Nzambe ya bakoko na bango.


Bato ya Isalaele bakangaki kati na bandeko na bango bato nkoto nkama mibale : basi, bana mibali mpe bana basi ; bazwaki bomengo ebele ya bitumba mpe bamemaki yango na Samari.


Boye, anjelu na Yawe abimaki mpe abomaki bato nkoto nkama moko na tuku mwambe na mitano kati na molako ya bato ya Asiri. Tango bato balamukaki na tongo ya mokolo oyo elandaki, bakutaki kaka bibembe.


Basapato nyonso ya basoda oyo lokito na yango eningisaka mabele, mpe bilamba nyonso oyo etondaki na makila, ekobwakama na moto mpo ete ezika makasi.


Na mokolo wana, bato ya libota ya Benjame basangisaki basoda nkoto tuku mibale na motoba oyo bayebi kobunda na mopanga, wuta na bamboka na bango nyonso ya mike, longola kaka engumba Gibea oyo esangisaki mibali ya bitumba nkama sambo.


Mibali ya Isalaele, longola kaka bato ya libota ya Benjame, bazalaki nkoto nkama minei, ba-oyo bayebi kosalela mopanga ; mpe bango nyonso bazalaki bato ya bitumba.


Bakambi ya bato nyonso, ya mabota nyonso ya Isalaele bazalaki kati na lisanga ya bato ya Nzambe : ezalaki na basoda nkoto nkama minei oyo batambolaka na makolo mpe bayebi kobunda na mopanga.


Na tango wana, bana ya libota ya Benjame bakimaki na Gibea mpo na kobundisa bana ya Isalaele, babomaki lisusu mibali ya Isalaele nkoto zomi na mwambe ; bango nyonso bazalaki bato oyo bayebi kobunda na mopanga.


Yawe abetaki bana ya Benjame liboso ya Isalaele, mpe, na mokolo wana, bana ya Isalaele babomaki mibali nkoto tuku mibale na nkama moko kati na libota ya Benjame, ba-oyo bayebi kobunda na mopanga.


Motango nyonso ya bana ya Benjame oyo bakufaki na mokolo wana ezalaki nkoto tuku mibale na mitano : bango nyonso bazalaki bilombe ya bitumba mpe bayebaki kobunda na mopanga.


Bazalaki komata ebele lokola mabanki elongo na bibwele na bango mpe bandako na bango ya kapo. Ezalaki pasi mpo na kotanga motango ya bato mpe ya bashamo na bango ; bazalaki kokota na mokili ya Isalaele mpo na kobebisa yango nyonso.


Bato ya Madiani, ya Amaleki mpe ya ngambo ya este bazalaki ya kopanzana kati na lubwaku, ebele lokola mabanki. Bashamo na bango ezalaki ebele koleka zelo ya ebale.


Jedeon akomaki na molako ya banguna na bango na tango kaka mobali moko ya Madiani azalaki kobeta lisolo ya ndoto na ye epai ya moninga na ye : — Tala ndoto naloti : Namonaki lipa moko basala na bambuma ya orje ezali kobaluka kati na molako na biso mobimba, bongo lipa yango eyaki kotuta ndako ya kapo na makasi koleka. Ndako ya kapo ekweyaki mpe ebalukaki.


Tango bakelelo nkama misato ebetaki lisusu, Yawe asalaki ete, kati na molako mobimba, moto na moto atuba moninga na ye mopanga ; mpe bango nyonso bakimaki kino na Beti-Shita, na ngambo ya Tserera, mpe kino na ngambo ya Abele-Meola pembeni ya Tabati.


Bongo, Jedeon akendeki na nzela ya bavandi ya bandako ya kapo, na ngambo ya este ya Noba mpe ya Yogibeka ; abetaki mampinga ya banguna na mopanga mpe alongaki bango tango bazalaki kokanisa ete bazali na kimia.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ