Bokobunda bitumba ata moke te : bomibongisa kaka na bisika na bino, botelema mpe botala elonga oyo Yawe akopesa bino. Bino bato ya Yuda mpe ya Yelusalemi, bobanga te mpe bolenga te ! Lobi, bokende kokutana na bango ; mpe Yawe akozala elongo na bino ! › »
Wana Jozefi azalaki kokanisa makambo yango, anjelu na Nkolo abimelaki ye kati na ndoto mpe alobaki na ye : « Jozefi, mokitani ya Davidi, kobanga te kobala Mari ; pamba te zemi oyo azali na yango ewuti na Molimo Mosantu.
Sima na bato ya mayele kokende, anjelu na Nkolo abimelaki Jozefi kati na ndoto mpe alobaki na ye : « Telema, kamata Mwana elongo na mama na Ye ; bokima na Ejipito mpe bowumela kuna kino tango nakoyebisa yo lisusu ete bozonga, pamba te Erode akoluka koboma Mwana. »
Yawe alobaki na Jozue : « Kobanga bango te, pamba te lobi, kaka na ngonga oyo, nakokaba bango nyonso na maboko ya Isalaele lokola bibembe. Okokata misisa ya makolo ya bampunda na bango mpe okotumba bashar na bango. »
Pineasi, mwana mobali ya Eleazari, mwana mobali ya Aron, azalaki na mosala liboso ya Sanduku). Batunaki : — Boni, tokende lisusu kobundisa bandeko na biso, bato ya libota ya Benjame to te ? Yawe azongisaki : — Bokende, pamba te, lobi, nakokaba bango na maboko na bino.
Molimo na Yawe ayaki likolo na ye mpe akomaki elombe kati na bana ya Isalaele ; bongo akendeki kobunda bitumba. Yawe akabaki Kushani-Rishetayimi, mokonzi ya Arami, na maboko ya Otinieli ; mpe Otinieli alongaki ye.
Alobaki na bango : — Bolanda ngai, pamba te Yawe akabi Moabi, monguna na bino, na maboko na bino. Balandaki ye mpe babotolaki bato ya Moabi bisika oyo bakatisaka Yordani na makolo. Bapesaki lisusu ata na moto moko te nzela ya kokatisa mayi.
Boye mibali yango nkama misato bazwaki biloko ya kolia mpe bakelelo ya bato mosusu. Mpe Jedeon azongisaki na bandako na bango, bana ya Isalaele oyo batikalaki. Nzokande, molako ya bato ya Madiani ezalaki na lubwaku, na se ya molako ya bana ya Isalaele.