Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Bilombe 7:8 - Mokanda na Bomoi

8 Boye mibali yango nkama misato bazwaki biloko ya kolia mpe bakelelo ya bato mosusu. Mpe Jedeon azongisaki na bandako na bango, bana ya Isalaele oyo batikalaki. Nzokande, molako ya bato ya Madiani ezalaki na lubwaku, na se ya molako ya bana ya Isalaele.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Bilombe 7:8
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Na mokolo wana, bakobeta kelelo oyo ya monene ; bato oyo bazalaki kobebisama na mokili ya Asiri mpe oyo bakendeki na bowumbu na Ejipito bakoya mpe bakogumbamela Yawe na ngomba ya bule, na Yelusalemi.


« Yebisa bana ya Isalaele : ‹ Mokolo ya liboso ya sanza ya sambo ekozala mpo na bino mokolo ya kopema, mokolo ya ekaniseli mpe ya kobeta kelelo, mokolo ya mayangani ya bule mpo na lokumu na Ngai.


Bongo na sima, na mokolo ya zomi, na sanza ya sambo, na mokolo ya bolimbisi masumu, bokobeta kelelo na bisika nyonso kati na mokili na bino mobimba.


Tango, kati na mokili na bino moko, bokokende na bitumba mpo na kotelemela monguna oyo azali konyokola bino, bokobeta bakelelo na bino makasi. Boye, Yawe, Nzambe na bino, akokanisa bino mpe akokangola bino na maboko ya banguna na bino.


na mbalakata, noki penza, tango kelelo ya suka ekobeta. Pamba te kelelo ekobeta, bakufi bakosekwa na nzoto oyo epolaka te ; bongo biso, tokobongolama.


Tango babetaki bakelelo, bato bagangaki makasi. Bongo, tango bato bagangaki makasi sima na koyoka lolaka ya kelelo kobeta tango molayi, mir ya engumba ekweyaki na pwasa. Boye, moto nyonso akotaki na engumba, liboso na ye, mpe babotolaki yango.


Kamata Banganga-Nzambe sambo ; Nganga-Nzambe moko na moko asengeli komema kelelo moko basala na liseke ya meme. Banganga-Nzambe nyonso sambo basengeli kotambola liboso ya Sanduku. Na mokolo ya sambo, bobaluka zingazinga ya engumba mbala sambo, elongo na Banganga-Nzambe oyo bakozala kobeta bakelelo.


Tango akomaki kuna, abetaki kelelo na mokili ya bangomba ya Efrayimi, mpe bana ya Isalaele bakitaki elongo na ye, longwa na likolo na ngomba, mpe amitiaki na liboso mpo na kotambolisa bango.


Na tango wana, bato ya Madiani, ya Amaleki mpe bato ya ngambo ya este basanganaki elongo, bakatisaki ngambo ya Yordani mpe batongaki molako na bango na lubwaku ya Jizireyeli.


Yawe alobaki na Jedeon : « Nakobikisa bino na nzela ya bato nkama misato oyo bamelaki mayi na nzela ya lolemo lokola mbwa, mpe nakokaba bato ya Madiani na maboko na yo. Tika ete bato nyonso oyo batikali bazonga, moto na moto na esika na ye. »


Na butu wana, Yawe alobaki na Jedeon : « Telema, kita mpo na kobundisa molako ya bato ya Madiani, pamba te napesi yango na maboko na yo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ