6 Bato nkama misato bazwaki mayi na maboko na bango mpo na komema yango na minoko na bango mpe komela yango na nzela ya lolemo ; bato nyonso oyo batikali bafukamaki mpo na komela mayi.
Boye, Jedeon akitisaki bato na mayi. Kuna, Yawe alobaki na ye : « Kabola bango : tia na ngambo moko, bato oyo bakomela mayi na nzela ya lolemo lokola mbwa ; mpe tia na ngambo mosusu, bato oyo bakofukama, mpo na komela mayi. »
Yawe alobaki na Jedeon : « Nakobikisa bino na nzela ya bato nkama misato oyo bamelaki mayi na nzela ya lolemo lokola mbwa, mpe nakokaba bato ya Madiani na maboko na yo. Tika ete bato nyonso oyo batikali bazonga, moto na moto na esika na ye. »