Tango Ushami akufaki, Adadi, mwana mobali ya Bedadi oyo alongaki Madiani na bilanga ya Moabi, akitanaki na ye na bokonzi. Kombo ya engumba na ye ezalaki Aviti.
Soda moko na moko abomaki monguna na ye. Boye bato ya Siri bakimaki, mpe bato ya Isalaele balandaki bango. Kasi Beni-Adadi, mokonzi ya Siri, akimaki na mpunda elongo na ndambo ya basoda na ye, oyo batambolaka na bashar.
Jedeon atindaki bantoma na etuka nyonso ya Manase ; mpe bato ya Manase basanganaki mpo na kozala sima na ye. Atindaki lisusu bantoma na libota ya Aseri, ya Zabuloni mpe ya Nefitali mpo ete bamata mpe bakutana na ye.