Soda moko na moko abomaki monguna na ye. Boye bato ya Siri bakimaki, mpe bato ya Isalaele balandaki bango. Kasi Beni-Adadi, mokonzi ya Siri, akimaki na mpunda elongo na ndambo ya basoda na ye, oyo batambolaka na bashar.
Yaazieli alobaki : « Bino bavandi nyonso ya Yuda mpe ya Yelusalemi, mpe yo mokonzi Jozafati, boyoka ! Tala makambo oyo Yawe azali koloba na bino : ‹ Bobanga te mpe bolenga te liboso ya mampinga minene oyo, pamba te bitumba ezali ya bino te kasi ezali ya Nzambe.
Bokobunda bitumba ata moke te : bomibongisa kaka na bisika na bino, botelema mpe botala elonga oyo Yawe akopesa bino. Bino bato ya Yuda mpe ya Yelusalemi, bobanga te mpe bolenga te ! Lobi, bokende kokutana na bango ; mpe Yawe akozala elongo na bino ! › »
Alongolaki bapine na bashar na bango mpo ete bamona pasi mpo na kokumba. Boye bato ya Ejipito balobaki : — Tokima mosika ya bana ya Isalaele, pamba te Yawe azali kobundela bango liboso na biso.
Pamba te, tala liloba oyo Nkolo Yawe, Mosantu ya Isalaele, alobi : « Ekozala kati na kobongola mitema mpe kimia nde bokozwa lobiko na bino ; ekozala na nzela ya kimia mpe ya elikya nde bokozwa makasi na bino ; kasi bino, bolingi bongo te.
balongaki nguya ya moto oyo ezalaki kopela makasi mpe babikaki na kufa ya mopanga. Atako bazalaki bato ya bolembu, bakomaki makasi na bitumba mpe bakimisaki mampinga ya basoda ya bapaya.
Biteni nyonso misato ya basoda babetaki bakelelo mpe babukaki bambeki. Na loboko na bango ya mwasi, basimbaki minda, mpe, na loboko ya mobali, bakelelo mpo na kobeta. Mpe bazalaki koganga : « Mopanga mpo na Yawe mpe mpo na Jedeon. »