Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Bilombe 7:19 - Mokanda na Bomoi

19 Jedeon mpe mibali nkama moko oyo bazalaki na ye elongo, bakomaki pembeni ya molako, mwa tango moke liboso ete midi ya butu ekoka, wana bawutaki kotia bakengeli mosusu. Babetaki bakelelo mpe babukaki bambeki oyo ezalaki na maboko na bango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Bilombe 7:19
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Okoyangela yango na bokonzi ya ebende, okopanza yango lokola mbeki ya mabele. »


Na miso na Yo, mibu nkoto moko ezali lokola mokolo ya lobi oyo esili koleka, lokola ngonga moko ya butu.


Liboso ete tongo etana, Yawe atelemaki na likolo ya likonzi ya moto mpe ya lipata, atalaki mampinga ya bato ya Ejipito mpe akotisaki mobulu kati na yango.


Na ngonga ya midi ya butu, mongongo moko eyokanaki : « Mobali ya libala ayei ! Bokende kokutana na ye ! »


pamba te boyebi malamu ete mokolo ya Nkolo ekoya ndenge moyibi ayaka kati na butu.


Tala, nazali koya lokola moyibi ! Esengo na moto oyo azali kosenzela mpe kobatela bilamba na ye, mpo ete atambola motakala te, mpe bolumbu na ye emonana te na miso ya bato nyonso.


Jedeon akabolaki basoda na ye nkama misato na biteni misato. Mpe apesaki na mobali moko na moko kelelo moko, mbeki moko oyo ezangi eloko na kati, singa ya mwinda mpe moto ya mbeki.


Tango ngai mpe bato nyonso oyo bazali elongo na ngai tokobeta kelelo, bino nyonso, na zingazinga ya molako, bokobeta mpe bakelelo na bino mpe bokoganga : ‹ Mpo na Yawe mpe mpo na Jedeon. › »


Biteni nyonso misato ya basoda babetaki bakelelo mpe babukaki bambeki. Na loboko na bango ya mwasi, basimbaki minda, mpe, na loboko ya mobali, bakelelo mpo na kobeta. Mpe bazalaki koganga : « Mopanga mpo na Yawe mpe mpo na Jedeon. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ