18 Tango ngai mpe bato nyonso oyo bazali elongo na ngai tokobeta kelelo, bino nyonso, na zingazinga ya molako, bokobeta mpe bakelelo na bino mpe bokoganga : ‹ Mpo na Yawe mpe mpo na Jedeon. › »
Na sima, apesaki bango mitindo oyo : « Bino nyonso, botala esika ngai nazali mpe bolanda ndenge ngai nakosala tango nakokoma pembeni ya molako ya banguna na biso.
Jedeon mpe mibali nkama moko oyo bazalaki na ye elongo, bakomaki pembeni ya molako, mwa tango moke liboso ete midi ya butu ekoka, wana bawutaki kotia bakengeli mosusu. Babetaki bakelelo mpe babukaki bambeki oyo ezalaki na maboko na bango.
Bato nyonso oyo basangani awa bakoyeba ete ezali na mopanga te to na likonga ya monene te nde Yawe abikisaka. Pamba te bitumba ezali ya Yawe, mpe Ye akokaba bino na maboko na biso.