17 Na sima, apesaki bango mitindo oyo : « Bino nyonso, botala esika ngai nazali mpe bolanda ndenge ngai nakosala tango nakokoma pembeni ya molako ya banguna na biso.
Jedeon akabolaki basoda na ye nkama misato na biteni misato. Mpe apesaki na mobali moko na moko kelelo moko, mbeki moko oyo ezangi eloko na kati, singa ya mwinda mpe moto ya mbeki.
Tango ngai mpe bato nyonso oyo bazali elongo na ngai tokobeta kelelo, bino nyonso, na zingazinga ya molako, bokobeta mpe bakelelo na bino mpe bokoganga : ‹ Mpo na Yawe mpe mpo na Jedeon. › »
Abimeleki elongo na bato na ye nyonso bamataki na ngomba Tsalimoni. Abimeleki azwaki epasola mpe akataki mwa bitape ya nzete, amemaki yango na mapeka na ye mpe alobaki na bato nyonso oyo bazalaki elongo na ye : « Oyo bomoni ngai kosala, bino mpe bosala bongo na lombangu. »