Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Bilombe 7:16 - Mokanda na Bomoi

16 Jedeon akabolaki basoda na ye nkama misato na biteni misato. Mpe apesaki na mobali moko na moko kelelo moko, mbeki moko oyo ezangi eloko na kati, singa ya mwinda mpe moto ya mbeki.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Bilombe 7:16
6 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Na butu, Abrami akabolaki bato na ye mpo na kobundisa bango, abetaki bango mpe alandaki bango kino na Oba, na nor ya Damasi.


Davidi apesaki mitindo na mampinga ete bakende. Akabolaki bango na masanga misato : lisanga ya liboso ekambamaki na Joabi ; ya mibale, na Abishayi, ndeko mobali ya Joabi, mwana mobali ya Tseruya ; mpe ya misato, na Itayi, moto ya Gati. Mokonzi alobaki na masanga ya mampinga ete ye moko akokende solo elongo na bango.


Kasi tomemaka bomengo yango kati na bambeki ya mabele mpo ete nguya monene ya Nzambe emonana, kasi nguya na biso bato te.


Tango Jedeon ayokaki ndoto mpe ndimbola na yango, afukamelaki Nzambe mpe atondaki Ye. Azongaki na molako ya Isalaele mpe agangaki : « Botelema, Yawe akabi molako ya bato ya Madiani na maboko na biso. »


Na sima, apesaki bango mitindo oyo : « Bino nyonso, botala esika ngai nazali mpe bolanda ndenge ngai nakosala tango nakokoma pembeni ya molako ya banguna na biso.


Mokolo oyo elandaki, Saulo akabolaki mibali na ye na masanga misato. Mpe liboso ete tongo etana, bakotaki na molako ya bato ya Amoni mpe babomaki bango kino na tango oyo moyi engalaki makasi. Bapanzaki bato oyo babikaki na lolenge oyo esalaki ete etikalaki ata na mibali mibale te kati na bango oyo bakobaki kozala esika moko.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ