Bilombe 7:14 - Mokanda na Bomoi14 Moninga na ye azongisaki : — Oyo ekoki kozala eloko mosusu te ! Ezali kaka mopanga ya Jedeon, mwana mobali ya Joasi, moto ya Isalaele. Solo, Nzambe akabi bato ya Madiani mpe molako mobimba na maboko na ye. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Nzokande, tango bakonzi nyonso ya Amori, na ngambo ya weste ya Yordani, mpe bakonzi nyonso ya Kanana, pene ya ebale monene ya Barozo, bayokaki ndenge nini Yawe akawusaki ebale Yordani liboso ya bana ya Isalaele kino tango basilisaki kokatisa, mitema na bango ebukanaki mpe bazalaki lisusu na makasi te ya kotelemela bana ya Isalaele.
Jedeon akomaki na molako ya banguna na bango na tango kaka mobali moko ya Madiani azalaki kobeta lisolo ya ndoto na ye epai ya moninga na ye : — Tala ndoto naloti : Namonaki lipa moko basala na bambuma ya orje ezali kobaluka kati na molako na biso mobimba, bongo lipa yango eyaki kotuta ndako ya kapo na makasi koleka. Ndako ya kapo ekweyaki mpe ebalukaki.