Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Bilombe 7:1 - Mokanda na Bomoi

1 Na tongo-tongo, Yerubali, elingi koloba Jedeon, abimaki elongo na bato nyonso oyo balandaki ye mpe batongaki molako na bango pembeni ya etima ya mayi ya Arodi. Nzokande molako ya bato ya Madiani ezalaki na ngambo ya nor ya molako ya bana ya Isalaele, na lubwaku, pembeni ya ngomba moke ya More.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Bilombe 7:1
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Abrami atambolaki kati na mokili yango kino na esika oyo babengaka Sishemi, na nzete monene ya More. Na tango wana, bato ya Kanana bazalaki kovanda na mokili yango.


Na tongo-tongo, Abrayami atelemaki mpe abongisaki ane na ye. Azwaki basali mibale kati na basali na ye, azwaki mpe Izaki, mwana na ye. Abukaki bakoni mpo na kotumba mbeka, atelemaki mpe akendeki na esika oyo Nzambe ayebisaki ye.


Bato ya Asiri mpe basangani elongo na bango mpo na kobakisa bakitani ya Loti makasi.


Mosala nyonso oyo loboko na yo ekokoka kosala, sala yango na makasi na yo nyonso ; pamba te kati na mboka ya bakufi epai wapi okokende, ezala mosala, mabongisi, boyebi to bwanya ezalaka kuna te.


Bangomba nyonso mibale ezali na ngambo mosusu ya Yordani, ngambo ya weste, na mokili ya bato ya Kanana oyo bavandaka na etando ya Yordani, etalana na Giligali, pembeni ya banzete minene ya More.


Na tongo-tongo, Jozue mpe bana nyonso ya Isalaele babimaki wuta na Shitimi mpe bakendeki kino na Yordani epai wapi batongaki molako na bango liboso ete bakatisa.


Na tongo-tongo ya mokolo oyo elandaki, Jozue alamukaki, mpe Banganga-Nzambe bamemaki Sanduku ya Yawe.


Kobanda mokolo wana, mpo ete Jedeon apanzaki etumbelo ya Bala, bakomaki kobenga ye « Yerubali » oyo elingi koloba : Tika ete Bala amibundela ye moko.


Na tango wana, bato ya Madiani, ya Amaleki mpe bato ya ngambo ya este basanganaki elongo, bakatisaki ngambo ya Yordani mpe batongaki molako na bango na lubwaku ya Jizireyeli.


Nzambe asalelaki ye bongo, na butu yango : bapwale etikalaki ya kokawuka, kasi mabele ya pembeni epolaki na mamwe.


Yerubali, mwana mobali ya Joasi, azongaki na ndako na ye mpe avandaki kuna.


Boye, Yawe atindaki Yerubali oyo babengi Jedeon, Bedani, Jefite mpe Samuele. Akangolaki bino na maboko ya banguna na bino, oyo bazingelaki bino na bangambo nyonso. Mpe bovandaki na kimia.


Bato ya Filisitia basangisaki mampinga na bango ya basoda na Afeki, mpe Isalaele atongaki molako pene ya etima ya mayi oyo ezali na Jizireyeli.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ